Masolo nde e leki nionso…
- MaïThoughts
- 8 nov. 2020
- 1 min de lecture
Ba boti ya ba congolais oyo ba bota na poto ebele ba yebi té que biso bana pé tozo bundana na ba injustices, rassismes na ba problemes kili-kili neti bango. Ba bosana que bana pé baza na ba emotions neti ko banga, ba doutes etc. ba bosana que bana pé baza batu neti bango baza pe na besoin ko bimisa ango na masolo po ba se liberer na poids wana. Malheureusement ba boti ebele ba kanisi ko bota na ko pesa bana mibeko e koki et le reste eko salema kaka na ngolua ya Tata… Mais non… MASOLO nde e leki nionso. Ko vandisa bana ata ba week-end bo dresser table bien bien bo lie elongo et boko beta masolo po bo yeba pé bana na bino. Ba boti ebele ba yebi kutu bana na bango té. Soki mutu ya libanda a ye ko betela yo lisolo ya mwana na yo oko tikala mukolo polele. Eza erreur makassi ko traiter bana neti bawumbu na yo ba koki meme pas ko se rapprocher na yo. Biso oyo tozo kola na globalisation na internet toza na acces na ba informations ebele ko leka ba boti na biso pona ko tala neti ba « kiltir » misusu ba kolisaka bana na bango ya bien to zwi ya mabé to bwaka. Relation ya bien entre bana na ba boti eko botisa ba liens ya makasi pona communauté na biso surtout ba biso oyo toza libanda ya RDC. Eko pesa biso makasi ko surmonter makambo ebele tozo vivre awa soki toza na relation ya confiance entre bana na ba boti.

Commentaires